Mokanda ya Ampère (Fichier Ampère)

Manaka ya bobundisi kokata makolo apayi ya babeli pasi ya makolo oyo ewuti na misisa ya botambolisi makila

Logo Ampere

  • Kobongisa lolenge ya bososoli mikono na minganga
  • Kosala mokanda ya minganga oyo ekotalisa bokati makolo na bituka
  • Kotombola bolukiluki na tina ya mikono ya misisa ya botambolisi makila na nzoto.

Na ba mibu zomi zomi ya suka awa, bosalisi mikono ya misisa ya botambolisi makila na nzoto ebongisami malamu mingi koleka lolenge ya kala lelo oyo bazali kolobela mingi lolenge ya kosalisa oyo eboyi lipaso ya misisa ya botambolisi makila soki yango akangami mpe ekomi makasi na kati ya misisa, to soki misisa ekondi, to kovimba ya misisa. Soki bosalisi ya koboya lipaso elongi bokono te,  nde kaka na tango wana minganga bakoki kosangisa esaleli wana na mayele ya lipaso oyo babengi lipaso ya bosangisi lolenge ya kosala (techniques de chirurgie combinées ou hybrides), to kosalela lipaso ya misisa ya botambolisi makila.

Kokoka kopesa babeli bosalisi ya lolenge wana na bisaleli ya sika ebimi ya suka ezali penza komonisama na ba mboka te.

  • Makoki ya bosungi babeli miyebani bipayi binso te na bituka
  • Minganga oyo bayekola mikono wana bazwami mingi mingi kaka na bingumba, mosika na babeli oyo bazali na ba kati ya bituka
  • Tango ya bozeli kokutana na munganga ezali komonana molayi mingi, ba poso, mbala mosusu ba sanza.

Ta tina babeli oyo bazali mosika ya bingumba bazangi kosungama na bisaleli mpe lolenge ya bosalisami ya malamu ya lelo.

EFVM ezwa ekateli ya kokitisa penza motuya ya bokati makolo, to kutu koboya yango libela, mpe komemela babeli nioso bisaleli ya lelo oyo mpo basungama malamu na bobundisi mikono ya motema mpe ya misisa ya botambolisi makila na nzoto. Kokokisa miango oyo esengi koyeba motuya ya babeli oyo nzela mosusu ya kosunga bango ezali lisusu te bobele kokata bango makolo mpo na kosilisa pasi ya misisa ya botambolisi makila. Bosangisi mituya wana na lisungi ya masanga ya likelemba po na bofuti mbongo ya kosalisama na minganga, mpe minganga bango moko na babeli mpe lokola (mingi penza oyo ya ba mboka pe ba oyo bazangi makoki). Mituya wana nioso ya kokata makolo nde esangisami na mokanda Ampère, yango elobelaka bituka ebele. Boyekoli mituya wana na mikolo ya sima nde epesaka na bato na mayele nzela ya kokomisa lisusu malamu koleka lolenge ya bosalisi babeli na bituka. Boye lolenge ya kosalisa ya sika oyo ebongisami ekoki kolengelama po na moto na moto.