Bokolongono ya mwasi mpe ya mwasi na mwana

Na mobu 2000, bato ya ekolo Amerika ba ponaki lisanga Millenium Developm8ent Goals (MDG) : miango ya botombwami mpo na mibu nkoto. Miango na bango ya 5  ezali koluka kokitisa na misatu kati na batu mitano motuya ya basi oyo bazali  kokufa na tango ya kobota kino na 2015. Miango oyo ekokaki kokokisama te na  molongo mobimba. Ata mikili oyo mizali na nkita ya kotombwama ekokaki yango te. Kolandisama motuya  ya bato, ntina yakoluka kokokisa miango yango ezali komonisama makasi na molongo kati na bikolo oyo nkita na bango ezali yakotombwama te.

Ndakisa na mobu 2010, motuya ya  bamama basilaki kokufa na kobota ezalaki lokolo koleka ekomaki nkoto mibale na tuku mitano na minei (2.054) kati na bato nkoto kama (100.000) na mboka Sud-Sudan,  kasi  na mboka Estoniya  yango ezaliki bobele 2 kati na 100.000. Allemagne yango ezali na molongo ya 164 kati na bikolo 184 na motuya ya 7 kati na 100.000 mpe Sierra Leone ezali na motuya ya minei na molongo mobimba.

Bokono ya diabete ya tango ya bokumbi zemi ezali likambo nzoto eboyi bomatii sukali na kati na yango tango ya zemi. Mitungisi diabete ya eleko ya zemi ezali komema na nzoto, ekokisami mingi na oyo ya diabete ya lolenge ya mibale (diabète  de  type 2). Kozanga bokebi na bileyi mpe kozanga botosi malako ya lolenge ya kobika mokolo na mokolo ya basi nde ezali komema bokono oyo mpe lisusu kozala mwana ya moto moko asila kobela diabete.

Bokono ya kovimba makolo na suka ya zemi, na mikakatano oyo yango ememaka, ezali kosala ete tension ezali komata mingi epayi ya basi na tango ya zemi.

Mikono oyo mibale etambolaka elongo na kozokisa misisa oyo ememelaka mwana makila na kati ya zemi na libuma ya mama mpe na nzoto ya mama ye moko.

Nde tina EFVM ezali komipesa na bobundisi mikono ya eleko ya zemi mpe ezwi mokano ya bolengeli  bato komibatela mpo  na  kopekisa boyei na yango.

Bokono ya kovimba makolo na suka ya zemi mpe diabete ya tango ya zemi ezali makama minene mpo na bokolongono ya mama na mwana. Na molongo mobimba, ntina makasi ya bokufi ya basi mpo na zemi to na tango ya kobota, motuya ya bato bazali kobela mikono oyo mpe ya bato bazali kokufa na tango ya kobota miwuti na masanga ya mikono mibale kobota bana ya minene koleka mpe kokomisa molayi tango oyo mwana azali kozwa mpo na kobima na libumu ya mama na tango ya kobotama, kokangama ya makila na esika ezalaki mwana sima na ye kobotama, kokangama ya makila bipayi na bipayi na misisa ya bomemi yango  na nzoto, kotangisa makila ebele na sima ya kobota, kokufa ya mwana na kati ya libumu ya mama, kokola ya malamu te epayi ya mwana na libumu ya mama tango ya zemi mpe lisusu kobota bana ya matshombe.

Na mikili ya poto, bakomi kolonga mitungisi oyo mikono wana mizali komemaka na kolandaka manaka minene ya miango ya komibatela mpe kosalela bisaleli bikelami sika (biologie ya minganga, échographie, échographie Doppler, medicine intensive et néonatologie). Na lisungi ya makoki wana nionso, mikono oyo mizali lisusu kobundisa makasi te bokolongono ya bato na mikili ya poto. Zemi  ezali lisusu likama mpo na bomoyi te kasi bobele likambo ya malamu penza na bomoyi.

Kasi emonisami penza ete ebele ya mikakatano ya zemi mizali na ntina na zemi ewuti na mikono mina. Ndakisa, ntina ya kosala lipaso pona bobotisi bamama.

EFVM azwi mikano ya kokamba malamu bokolongono ya mama na mwana. Wana mingi penza na ba mboka oyo mizali mosika na bingumba na Allemagne lolenge moko na bikolo ya ngele ya Sahara na Afrika wapi makoki mizali moke.

Na lisanga na Princess Christian maternity Hospital ya Freetown na Sierra Leone, fondation ebandaki ko, kongolola makomi mizali kotalisa motuya ya ba infirmiers (Study-Nurse-Programm) mpo na kokoma mokanda ezali kotalisa lolenge ya kosunga ba mama na diabete ya bokumbi zemi mpe mokanda mosusu mpo na kobanda ya kokangama ya makila. Na ngambo mosusu, manaka etiamaki mpo na bosangisi mayele mpe koyekolisa kati na Allemagne na Sierra Leone pona minganga bilenge basalaka na ba hopital na ntina ya kobikisaka mikono ya nzoto ya basi.