Tozali ba nani

EFVM, na lokota ya anglais “European Foundation for Vascular Preventive edecine” oyo elingi na lingala “Lisanga ya bayi Eropa mpo na kobikisa mpe kokebisa na bokono ya botamboli ya makila na nzoto”, ekelami wuta mobu 2004, yango ezali lisanga ya leta te, kasi ezali kosala mosala ya ntina mpo na bolamu ya bato banso. Ba minganga, ba yekoli mikolobe, bato basusu ya mayele ya boluki bikolongono ya nzoto bazali kosala elongo mpe ya ofele, na bato bayekola mateya misusu ebele.

Biso tozali koluka kobongisa lolenge ya kosalisa malamu bokono ya motema mpe etamboli ya makila na nzoto kati na bingumba mpe ba mboka.

Fondation ezwa mokano ya kosalisa bokolongono ya basi mpe mwasi na mwana na ba mboka o kati ya bikolo mpe libanda ya Eropa, mingi penza na bituka bizangi makoki biye bizwami na ngele ya desert ya Sahara na Afrika.

Misala ya EFVM mizali kosalema na lisungi ya makoki miwuti makabo. Bato na bipayi bipayi lokola bayembi, basali bikeko, bayi politiki to mpe baminganga na molongo mobimba bazali kosunga misala ya EFVM.