Kimunganga ya motema mpe kotambola ya makila na nzoto

Misisa ya botambolisi makila na nzoto mizali na motako koleka ba kilometre 90.000 komemaka bomoi na biteni nionso ya nzoto mobimba. Misisa ya bomemi makila na nzoto ya moto nde fungola ya biteni nionso ya nzoto; esika makila ezali kokoma te, bomoi ezali te. Mikono mingi miwuti na bozangi makila na biteni ya nzoto. Esika misisa ezali ya kobeba, nde eteni wana ya nzoto ezali kobela. Soki motema ezali kosala malamu te, to bongo, to mokongo (ba reins), moto akoki kokata  motema na pwasa, to ekosenga bakata ye lokolo, to akoki kokufa miso, kaka mpo makila ezali kotambola malamu te na nzoto na ye.

Na lolenge moko, oyo ememaka mikakatano na eleko ya bokumbi zemi ekoki komema bokono lokola malady ya sukali mpe kozala na likama mpo na mama to mwana.

Lolenge ya kobika ya kimundele oyo emonisami na kofandaka mingi esika mo9ko, komela likaya, ezali kobengisa mikono ya motema mpe kotambola ya makila na nzoto nde ezali ntina ya liboso ezali komema batu na liwa na mboka Allemagne. Bayekoli ya misisa ya makila (angiologues), pene na ba millions 200 ya bato na molongo bazali na bokono ya makolo mpo na botamboli malamu te ya makila oyo ebengami na lopoto ya pete “maladie des vitrines”.

Na Allemagne ezali na million 6,7 ya bato bazali kobela diabete mpe mobu na mobu bato bazali kobakisama na motuya ya ndambu ya million oyo bazali na diabete ya lolelnge ya mibale. Likambo oyo ezali kotinda ete bakata makolo na bato 40.000, nzoka nde 2.000 bakufa miso, mpe 2.000 mosusu basukolaka bango makila (dialyse) mokolo na mokolo.

Bokono oyo emonisami mingi kati na bato bafandi na Allemagne etali mingi penza botamboli ya makila na nzoto, koluka lisungi mpo na kobika na bokono nde ezali kobundisa nkita ya mabota mpe bofandi lisanga kasi lisusu mpe mpo na lolenge ya mabongisi ya bokolongono na ekolo mobimba.

EFVM ezwa ekateli ya kozwaka mikano mpo na bokebisi bato na boyeyi ya mikono wana. Boye fondation EFVM ezali kosunga nzela ya komona bokono yango na bomoyi ya bato mpe lolenge ya kosalisa banso bazali na bokono. Pamba te, ezali kaka na nzela wana nde mitungisi ya mikono wana nde ekoki kobundisama malamu.

Na oyo etali mikono ya botamboli makila, esengeli na :

  • Kokela mokanda oyo ezali kotalisa kokatama ya biteni ya nzoto ya bato
  • Kokoba bolukiluki ba ntina ya mikono wana miwutaka na misisa mike mike ya botambolisi makila
  • Kozala molende na malako ya bato na mayele na oyo etali mikono ya botamboli ya makila na nzoto
  • Kobongisaka milulu ya bayekoli kimunganga ya botamboli ya makila na nzoto
  • Kobongisa milulu ya bopanzi sango ya maye esengeli kosalaka mpo na kopekisa koya ya mikono ya botamboli ya makila na nzoto, koyekolisa b+ato lolenge nini kosunga bato na bokono mpo bakoka kobika bango moko mpe kozelaka tango nyonso te lisungi ya bato misusu na bomoyi na bango ya mokolo na mokolo.