Kimunganga mpo na bato oyo batiki bikolo na bango mpe bakeyi na mboka bapaya

Mokili mobimba ezali koningana mpe boyebi ezali kotambola lokola makila na misisa ya nzoto.

Wuta kala na Allemagne bato bawuta bipayi na bipayi bazali kobika. Mingi kati na bango ba bakokisi bokitani misato to minei kowuta na ba tata ti na bana. Kutu, bato mingi lisusu bawuti na ba mboka ya bapaya mpe ba oyo bakimi na Allemagne na nzela ya botamboli ya bato na bikolo, mingi penza mpo na mikakatano ya politiki.

Wana elingi koloba ete kimunganga ya kosalisa moto na moto na hopital na Allemagne esengeli ezwaka na bokebi mikono misusu mizalaka te na kala. Boye, motuya ya bato na bokono mimonisami mingi kati na bato ezali kobongwana, mpe ba nzela ya bobeli mikono misusu mizali kobongwanaka.

Moke moke, kasi na malembe malembe penza, likanisi ezali kotambola ete bokeli mino esengeli kotala na bokebi bokeseni kati ya basi na mibali : bolukiluki na ntina na mikono mina, mikoki kofandisama lisusu te nakotalaka bilenge ya mibu 18, to mindele, to bato babalanaka kaka basi na mibali, to bato bazali na bokolongono mpo na koyekola lolenge ya bokono mikozwaka bato ebele na mbala moko, kobongolama ya bilei na kati ya nzoto to lolenge ya kosalisaka mikono.

EFVM emipesi makasi mpo na kopesa esikaya motuya na kimunganga mpo na bato oyo bawuti na ba mboka ya bapaya.

Lolenge ya kobika ya bato ezali kobongwana penza. Boye pe kimunganga esengeli ebongwana mpo na kokokana na lolenge ya kobika ya lelo. Lolenge moko eloba Héraclite  na nkota ya ba grec “Panta Rhei” oyo elingi koloba “manso mazali koleka” moto azali kaka na esika moko te, kasi manso mazali komonana na kobongwanaka. Moto nde tina ya kokoma ya nionso. Kasi, bomoko ezali na ebale oyo ezali kotambola : bomoko oyo esangisi bokeseni ebele mpe bokeseni ebele emonisami na bomoko.