Basali

Univ.- Prof. Dr. med. Ivo Buschmann

Molakisi Munganga Ivo Buschmann

// Mokambi lisanga ya ba directere

Ivo Buschmann, munganga mpe molakisi na eteyelo ya likolo (université), ye azali munganga oyo ayekoli mingi misisa miye mitambolisaka makila na nzoto. Azali mokambi Departement ya botamboli makila na nzela ya misisa na hopital ya université ya Brandenburg, mpe lisusu azali mosali na hopital ya université ya Berlin. Molakisi Ivo Buschmann nde azali mokeli EFVM. Ye amipesa penza na kolukaka lolengi ya maladi ya botamboli ya makila na misisa ya nzoto, na nsima kolukaluka mpe komekameka na ye na hopital ya université ya Hambourg – Eppendorf, na lisanga Max Planck ya Bad Nauheim to mpe na ciliniki ya université ya Fribourg. Bobatelami na bokono ya botamboli ya makila na nzoto nde likambo ye alukaka koyeba mpenza. Mpo na kokolisa mayele yango,  molakisi Buschmann amipesa mingi na bosalisi ya tekiniki ya makasi mpo na kosunga bato bafandi na ba mboka mpe ba oyo bazangi mosolo mpo na kofuta minganga. Ye alingaka ete bato wana bazwaka lisungi ya minganga lokola ba oyo bazali na makoki esengeli mpe bafandi na bingumba, mpe alingaka lisusu esalema mpe mpo  na makono misusu.

Univ.-Professor Dr. med. Oliver Ritter, Direktor Herzmedizin EFVM

Molakisi Munganga Bernard J. Arnolds

// Moko kati na lisanga ya ba directer

Molakisi Arnolds azali munganga ya misisa ya bongo mpe nzoto mobimba, azali lisusu ingénieur ya lotoliki a mikemike ya université ya Fribourg. Ye azali sika awa mokambi ya lisanga ya Campus ya Fribourg mpo ya lotiliki ya mikemike ya universite wana. Yaye mosala ezali penza kotala lolenge nini kosalela mayele ya bisaleli ya lotiliki ya mike mike mpo na kosunga bokolongo no ya batu. Molakisi Arnolds azali moko kati na lisanga ya bakambi EFVM.

Moko kati na lisanga ya ba directer

Molakisi Arnolds azali munganga ya misisa ya bongo mpe nzoto mobimba, azali lisusu ingénieur ya lotoliki a mikemike ya université ya Fribourg. Ye azali sika awa mokambi ya lisanga ya Campus ya Fribourg mpo ya lotiliki ya mikemike ya universite wana. Yaye mosala ezali penza kotala lolenge nini kosalela mayele ya bisaleli ya lotiliki ya mike mike mpo na kosunga bokolongo no ya batu. Molakisi Arnolds azali moko kati na lisanga ya bakambi EFVM.

Gabriele Wolter Vorstandsmitglied Geschäftsführerin Städt. Klinikum Brandenburg GmbH

Gabriele Wolter

// Moko kati ya lisanga ya bokambi

Mama Wolter ye azwa diplôme ya kokamba kompani. Wuta mobu 1992, ye azali directere mpe motambwisi hopital ya engumba Brandenburg oyo sika awa ezali na eteyelo na yango ya likolo mpo na kobimisa minganga. Lokola directer ya lingomba ya misala ya ba hopitale ya ba universite, Mama Wolter azali moko kati ya lisanga, mpe mokonzi ya lisanga ya Aufsichtsrat, ya lisanga ya bapesi mosolo ya hopital mpe moko kati na lisanga ya bakambi ya EFVM.

Professor Dr. med. Wolfgang Meyer-Sabellek

Molakisi Wolfgang Meyer – Sabellek

// Moko kati ya ba directer

Molakisi Meyer – Sabellek ye ayekola mingi penza kimunganga ya motema na amerika mpe asali ngi kuna na oyo etali bolukiluki ya botamboli ya makila na nzoto mpe lolenge ya kosalama ya mikuwa. Sima na ye kozala munganga na hopital ya université ya Frei na engumba Berlin (oyo lelo ekoma na kombo ya La Charté université ya kimunganga ya Berlin), ezali sikawa kosala mosala ya molakisi mpe na  bolukiluki na kimunganga ya bato oyo bazali kobika lisanga, koyekola mikono miye mizwaka bato ebele na tango moke mpe nkita ya bokolongono. Na mibu 15 miye ya suka, Molakisi Meyer – Sabellek asili kozwa esika na bisika ebele lokola motabuisi na bakompani ya bosali mino mpe bisaleli ya ba minganga. Ye azali molukiluki na oyo etali bolongono ya motema mpe kotambusama ya makila na nzoto mobimba. Molakisi Meyer – Sabellek azali moko  kati na lisanga ya bakambi EFVM.

Univ.-Professor Dr. med. Oliver Ritter

Molakisi Oliver Ritter

// Directer mpe munganga ya mitema na EFVM

Oliver Ritter, molakisi na ba universite mpe munganga ya bokono ya kati ya nzoto m€yjhthpe mitema. Ye akambaka lisanga ya batali bokono ya mitema, mikongo ya basi mpe mibali mpe pema na eteyelo ya likolo ya minganga ya Brandenburg. Molakisi Ritter asila kozala mokambi ya hopital La Charité ya universite ya Berlin, ya Centre Delbruck ya Berlin, ya hopital ya Wirtzbrourg mpe ya centre ya Allemagne mpo na mitema cmikosalaka malamu te.

Misala naye misangani mingi penza na boyekoli lolenge  ya kosala ya mitema mpe kosalela bisaleli mpo  na  bokolongono. Molakisi Ritter abimisa mino ebele ya  sika mpo na kosalisa bato na bokono  ya  motema ye azwela yango mikanda ya lokumu ebele. Azali mokambi kimunganga ya motema okati ya EFVm.

Dr. med. Mariatu Binta Leigh

Munganga Mariatu Binta Leigh

// Mokambi  ya misala ya EFVM na bamboka ya bapaya

Mokambi ya misala ya bokolongono ya basi mpe ya boboti bana

Munganga Mariatu Binta ayekola kimunganga ya kosalisa basi na kobota, ya nzoto ya basi po na  kobota; atangaki yango na La Charité, na Université ya Berlin mpe na université ya Bordeau, na France. Na oyo etali bobotisi basi mpe bokolongono ya nzoto ya basi, ye asali mosala mingi lokola emonisami na Princess Christian Maternity Hospital ya Freetown na Liberia, na CHU ya engomba Fort de France na Martinique, mpe lisusu na engumba Berlin mpe na Brandenburg. Lelo oyo Mama Leigh asalaka na hopital moko ya Berlin wapi epayi ye azali mokonzi ya minganga. Na mosala na ye na Fondation, amipesi na koluka kobongisa bokolongono ya basi mpe mwasi na mwana, mpe na mikili ya ngele ya Sahara. Azali mokambi miango ya EFVM na mikili ya molongo

Mpe lisusu, Mama munganga Leigh atambusaka mosala ya EFVM na internet na masolo na bato mosusu ya libanda ya EFVM. Na bokebi na ye nde bilili eponamaka mpe mosala yango ezali kondimama.

Philipp Hillmeister

Munganga Philipp Hillmeister

// Directere ya lisanga ya bolukiluki mpe boyekoli na EFVM

Moyekoli mayele ya bikelamu ya molongo, Philipp Hillmeister atanga na université ya Humboldt ya Berlin. Eteni na ye ya mosala ezali biologie ya ba cellule mpe ba molécules na oyo etali bokolongono ya moto na moto, mingi penza na misisa ya botamboisi makila. Ye akoki kosungama na mibu zomi na mibale oyo asali na hopital La Charité ya université ya Berlin. Munganga Hillmeister azali sik’awa kosala na eteyelo ya kimunganga ya likolo ya université ya Brandenburg mpe misala na ye na institut Richard Thoma na oyo etali botambolisi makila na nzoto, misala ya bato na bokebi bokolongono, lolenge ya kokanisa ya bato na masano mpe boleyi. Munganga Hillmeister azali lisusu mokambi misala ya bolukiluki ya EFVM.

riedel

Peter Michael Riedel

// Mokambi mosala ya masolo (communication) na EFVM

Riedel ayekola mibeko mpe asali mibu ebele lokola mopesi toli na lolenge ya kofuta mpako na ba kompani. Azali mpe mobandisi lisanga Kurfurstendamm Interessensgemeinschaft, lisusu wuta mibu ebele asangisaka bato ya bokambi politiki, nkita na misala ya bosepelisi bato. Mosala na ye ezali kolukaka mingi kopesa biyano na mikakatano. Na EFVM, Riedel ye akambaka masolo na bato ya politiki, nkita mpe basepelisi bato. Azali mokambi ndako ya mosala ya EFVM na Kurfurstendamm na engumba Berlin.

Bettina Kleinmann

// Mokambi makomi manso ya EFVM ebimisaka

Bettina Kleinmann azali moto oyo ayekoli mabanzo ya kati ya bato na université Ruprecht-Karl ya Heidelberg. Azali na bosali mingi na oyo etali mikono miye miwuti na mabanzo ya bato oyo ememaka pasi na nzoto mpe lolenge ya kosunga bato na bobimi na mabanzo ya mabe sima ya pasi ya nzoto na Angleterre. Na mobu 2008, Mama Kleinmann abandisaki esika ya kosalisa bato na pasi ya mabanzo ebakisaka pasi ya nzoto na kiliniki ya Sankt Peter-Ording. Tee kino lel’yo ye asalaka lokola munganga mokonzi. Mama Kleinmann asila kokoma mingi na ntina ya kimonganga na EFVM (lokola “Mokanda ya kimonganga ya babimi ba mboka na bango”).

Dr. Claude Tshibangu Lukusa

Dr. rus. Claude Tshibangu Lukusa

// Facharzt für Innere Medizin & Kardiologie

Dr. rus. Claude Tshibangu Lukusa ist Facharzt für Innere Medizin und Kardiologe und Oberarzt am Sana Herzzentrum Cottbus.  Dr. rus. Lukusa hat an der  Universität Kinshasa sowie der St. Petersburger Staatlichen Medizinischen Akademie  Metschnikow studiert. Seit 2002 ist Dr. rus. Lukusa  in Deutschland als Arzt tätig, seit 2016 als Kardiologe. Zudem lehrt Dr. rus. Lukusa im Rahmen eines Lehrauftrags an der Universität von Mbuji Mayiin der demokratischen Republik Kongo.

Ein Schwerpunkt von Dr. rus Lukusa in der Stiftungsarbeit ist die Verbesserung der medizinischen Versorgung von kardiovaskulären Erkrankungen sowie insbesondere auch der peripheren Verschlußkrankheit (pAVK) in der Republik Kongo.  Dr. rus. betreut hier als Mentor das Stipendiaten Programm  MEDSTURS der EFVM.

Jeanett Förster

Jeanett Forster

// Mokambi ndako ya mosala ya EFVM na Brandenburg

Mama Forster azali mosali ya bokambi mombongo mpe amipesa mibu mingi na bosungi bakambi ba kompani. Sik’awa azali mokambi mosala ya bolukiluki ya bokolongono na Institut Richard Thoma ya Centre allemand ya botambolisi makila na nzoto ya Brandenburg (DAZB) mpe lisusu misala ya EFVM na ndako ya mosala ya botalisi foundation na Brandenburg. Mosala ya mama Forster etali penza bokambi ba manaka bokutani na babeli mpe bokambami ya misala ya ndako ya mosala. Na penepene azali mpe moto oyo alandelaka makambo manso matali makabo oyo EFVM ezwaka kowuta na bamosusu.

Lisanga ya bapesi toli

Professor Dr. med. Dr. h.c. Günter Stock

Molakisi Gunter Stock

// Mokonzi ya Fondation Einstein
// Mokonzi ALL European Academies (ALLEA)
// Mokonzi ya kala ya lokumu ya Académie des sciences de berlin –Brandenburg

Molakisi Stock andimamaka na université na 1978 na université ya Heidelberg. Na 1983, ayingela na S.A Schering lokola directere ya mosala ya koyekola mono ya bosalisi makono ya botamboli ya makila na nzoto mpe ya motema, lisusu azalaki moko okati ya lisanga ya bokambi  ya Schering po na bolukiluki banda 1989 kino 2005. Na kala, azalaka mokonzi ya Académie des sciences de Berlin-Brandenburg mpe mokonzi All European Academies (ALLEA). Molakisi Stock azali mokonzi ya lisanga ya ba directere ya Fondation Einstein ya Berlin wuta sanza ya zomi ya mobu 2015.

Makambo ye alandelaka matali penza misisa ya nzoto, esaleli ya motema mpe biochimie. Amipesaka mingi na boyekoli bokeseni baye bazali kati na lolenge mono esungaka basi mpe mibali. Molakisi Stock azali moko kati na bapesi toli ya EFVM.

Dudenhausen

Molakisi Joachim W. Dudenhausen

// Motindami na Faculté ya sciences ya bokolongono ya nzoto
// Molakisi ya kala ya lokumu ba ya bokolongono ya zemi na La Charité ya Berlin
// Mokambi ya kala ya faculte na université ya kimunganga ya Berlin

Molakisi Dudenhausen azali munganga ya bokolongongo ya nzoto ya basi mpe bokumbi zemi na kobota. Sima ya bosali na Berlin-Neukolln mpe na Zurich, akomi directere ya mosala ya bokolongono ya boboti mpe bokumbi zemi na La Charité mibu ebele. Wuta ye atika kosala na hopital, akoma kosala lokola molakisi mpe molukiluki na Weill Comell Medecine na New York nde asungaki na bokelami ya Centre ya bokolongono ya mama na mwana mpe kolukaluka Sidra Medical and Research center ya Doha na Qatar. Azali mokonzi ya bakimi mokanda ya ba sango Journal of Perinatal Medecine (Basango ya bokolongono ya boboti). Bango balukaka ko kitisa motuya ya basi bazali kokufa na tango mpe mikakatano ya kobota mpe kolengele mikakatano ya bana ya matshombe na lisusu mikono ya zemi. Libanda ya manso wana, amipesi na kolukaluka mpo misala ya bokolongono. Molakisi Dudenhausen azali moko ya bapesi toli na EFVM.

Prof Neugebauer

Molakisi Edmund A. M. Neugebauer

// Mokambi eteyelo ya kimunganga ya likolo na Brandenburg (MHB)
//
Molakisi ya bolukiluki na misala ya bokolongono ya université ya Witten/Herdecke

Sima ya boyekoli lolenge ya bosangisi mono na Institut de chimie biophysique Max planck ya Gottingen mpe bolandi mateya na Institut universitaire de Technologie (IUT) pona bokomi Ingénieur na université ya Aix-la Chapelle (Fachhochschule Aachen), ayekolaka chimie mpe biologie na université ya Marbourg. Sima ya bolandi mateya ya kobakisa ya bokolongono ya bato, azwaki ndingisa ya bolimboli lolenge ya bosali lipaso. Na mobu 1989, ye atyamaki na moto ya mosala ya biochimie mpe komekameka na eteyelo ya mibale ya lipaso ya université ya Cologne. Molakisi Neugebauer aponamaki na 2005 na eteyelo ya bolukiluki na ntina na lipaso na université ya Witten/herdecke mpe wuta wana, na institut ya bolukiluki na kimunganga ya lipaso. Asila kozala mpe moko kati ya bakambi (lisanga) réseau allemand ya kimunganga ya makambo emonisamaka na lisanga ya balukiluki na misala ya bokolongono ya Allemagne (DNVF e.V). Wuta sanza ya libwa ya mobu 2016, ye azali directere ya eteyelo ya likolo ya kimunganga ya Brandenburg (MHB). Molakisi Neugebauer azali moko ya ba pesi toli ya EFVM.

Univ.-Prof. Dr. med. Stefan N. Willich

Molakisi Stefan N. Willich

// Directere ya Institut ya kimunganga ya bato bafandi lisanga, boyekoli mikono mikozwaka bato bayike na mbala moko mpe nkita bokolongono – Charité
//
Mokeli mpe Mokonzi ya European Society of Integrative Medecine

Molakisi Willich azali monganga ya mikono ya kati ya nzoto. Ayekola kimunganga na Berlin, Munich mpe New York. Kutu, alanda mateya ya bokolongono ya etuluku ya bato (santé publique) na université ya Harvard na Amerika mpe mateya ya bokambi misala na Institut Européen d’Adminstration des Affaires (INSEAD) ya Fontainebleau, na France.

Wuta 1995, ye akambaka Institut ya bokolongono ya bato bazali kobika lisanga, boyekoli mikono miye mizwaka bato bayike na mbala moko mpe nkita ya bokolongono ya nzoto na la Charité na université ya Berlin. Azali directere bokambi mayele ya Centre ya mayele ya bomoto mpe nkita banda 2005 tii 2012. Wuta 2012 tii 2014, Molakisi Willich akambaki eteyelo ya miziki ya likolo Hanns Eisler ya Berlin. Stefan N. Willich azali moko ya lisanga ya bokolongono ya motema ya bai Eropa (Société Européenne de cardiologie, ESC) mpe ya lisanga ya bokolongono ya motema ya bai amerika (Collège américain de cardiologie, ACC), mokeli mokonzi ya lisanga ya bai eropa pona kimunganga ya bozongisi bato na lisanga na bango ya kobika mokolo na mokolo (Société européenne de médecine intégrative, ESIM) mpe azalaki mokonzi ya deutschen Gesellschaft fur Gesundheitsokonomie. Ntina ye asalaka bolukiluki ezali bolengeli, mikono ya motema mpe botamboli ya makila na nzoto, nkita ya bokolongono mpe kimunganga ya bozongisi bato na bisika na bango ya kobika ya mokolo na mokolo. Molakisi Willich azali moko ya ba pesi toli na EFVM.

Dietlind-Tiemann

Munganga Dietlind Tiemenn

// Mwasi mosali na politiki

Mama Munganga Dietlind Tiemenn ayekoli nkita na Berlin ya moniele mpe asala bolengeli mosala na ye ya mosungi bolukiluki mayele na eteyelo ya likolo ya ki ingénieur na Mittweida, Kuna nde azwa diplome ya doctora. Asalaka na VEB Landbaukombinat YA Postdam tee bokweyi ya efelo ya Berlin, lokola mokonzi ya misala ya nkita ya mosala mpe directere ya nkita, ya makoki mpe bokambi ya kobomba makoki. Sima ya wana, azalaki directere ya misala ya mombongo kati na bakompani ebele ya botongi ndako na Brandenburg mpe Saxe-Anhalt. Wuta 2016, azali moponami ya bakeli mibeko. Ye azwaki esika na bokolisi eteyelo ya kimunganga ya likolo ya Brandenburg tango ye azalaki mokambi engumba Brandenburg-sur-la-Havel. Mama munganga Tiemann azali moko ya bapesi toli ya EFVM

Bapesi toli po na babeli

Heinrich Banet

Heinrich Banet

// Mosali teatre to bafilme

Heinrich Banet akola na engumba Leipzig. Sima ya bolongi diplome d’état ya mboka sxna bango (Allemagne), akobaki eteyelo ya teatre Hans Otto de Leipzig mpe akomaki moko ya basali teatre mpe filme ayebana koleka na Allemagne mobimba ya moniele. Wuta 1970, bayike bazuaki libaku ya kobetela ye maboko na Magdebourg mpe lisusu na bingumba lokola Greifswald, Stralsund, na esika ya teatre ya engumba Cottbus, na Neues teatre ya Halle-sur Saale mpe lisusu na Cabaret Leipziger Pfeffermuhle.

Heinrich Banet azali moko ya bakeli ya “Cabaret Die Kugelblitze” na mobu 1977 na ndako ya Cristal Magdebourg mpe ye azalaki moko kati na lisanga yango tii 1997. Kaka na eleko wana, na esika ya teatre ya Halbertadt mpe na “Cabaret Die Kiebitzensteiner” ya Halle-la Saale, Banet asala ba film ebele na ba series ebele ya TV lokola “Tatort”, “Polizeiruf 110”to “Aber Vati”. Ye atika kosala teatre to ba film na 2001 mpe akoma komipesa na kosunga mwasi na ye oyo abelaka bokono ya pasi makasi na makolo (Artériopathie oblitérante des members inférieurs). Aloba : “na sungama mingi na bisaleli ya sika. Po na yango, na komipesa na kopesa bamosusu molende”. Asalelaka teatre, kasi lelo oyo, azwa ekateli ya koluka kozongisa bokolongono ya malamu na mwasi na ye mpe bamosusu na bokono ya lolenge moko na mikakatano ya botamboli ya makila na misisa. Ye azali moko ya ba pesi toli ya EFVM.

Jürgen Heiss

Jurgen Heiss

// Mobini

Jurgen Heiss abotama na 1943 na Allemagne ya moniele, atanga mabina na eteyelo ebengami Ecole nationale de ballet ya Berlin ya moniele (Staatliche Ballettschule Berlin). Sima ya bosilisi kelasi na ye, akotaki na ballet national ya Berlin mpe amataki na bokonzi na tango mokuse, andimamaki na Opera ya bosekisi ya engumba Berlin, na Opera ya Dresde mpe na oyo ya Stuttgart. Kaka na eleko wana, Heiss abina na Eropa mobimba, na Amerika, na Japon mpe na Ostraliya. Ye azalaki mokonzi ya Ballet mpe mobongisi lolenge bato bakosalaka teatre ata ko oyo ye moko asalaki, bato babetelaki yango maboko.

Mitungisi mpe kotindikama mpo mosala eleki ebele etungisaka bomoyi ya Jurgen Heiss mingi nde tina ye azalaki komela likaya mingi tii komemela ye bokono mpo ete misisa ya botambolisi makila na nzoto ekondaki kati ya nzoto na ye. Lokola mobini, moto na koninganaka mingi, Jurgen Heiss ayebaki ntina ya kozala na nzoto kolongono. Alingi sikawa kolendisa bamosusu bazali na bokono ya lolenge moko na ye. Jurgen Heiss azali moko ya bapesi toli na EFVM.