Mokanda ya kimunganga ya batamboli bikolo na bikolo

Mokanda ya bolimboli bilili ya kimunganga, lolenge ya koluka koyeba moto azali kobela bokono nini mpo na ba hopital pe ndako ya misala ya minganga

Mokanda “Notaufnahme”

Na misala ya koluka mbango mbango kobikisa bato mbango na likama ya bokono ekomeli bango na lombango  na Allemagne, bato million tuku mibale na mitano (25) bazali kozwa lisungi mobu na mobu na ndenge ya kofanda na hopital to kozala na ndako mpe koyaka na hopital kozwa lisalisi ya munganga liboso ya kozoga ndako, bato mosusu batindamaka na ba hopital misusu oyo elongobani mpo na kolandela bango malamu.

Awa hopital nde ezaliesika ya bokutani ya baye banso bazali kosala mosala ya kobundisa bokono. Kasi na mbala moko mpe, esika ya bokutani ya bato bawuta bipayi na bipayi, oyo balobaka nkota lolenge na lolenge na bokeseni ya mabanso mpo na bomoi. Esengami na basali banso ya hopital koyamba babeli na lolenge elongobani kolandisama na bizaleli ya mbotama na bango. Awa kutu nde emonisami ete tango mpe bato ebele bazangi makoki wana na kati ya ba hospital, lokola kosolola na mobeli na lokota ya mbotama na ye.

Ezali ya solo ete na momesano, mpe wuta kala bato ya bowuti bipayi na bipayi bazali kobika na Allemagne. Mingi kati na bango, bakoko na bango nde bawuta bikolo misusu, boye bango bazali naino na bizaleli ya bikolo bibale. Kati na bango ezali mpe na ba oyo kino lelo bayebi naino koloba lokota ya Allemagne te. Lisusu na koyaka mbangu mbangu ya bapaya mibu miye ya suka, mingi penza na tina ya politiki, kokima bitumba mpe tina misusu, bawuta ya bikolo misusu bazali te koloba lokota ya Allemagne ata ko anglais te. Kasi na ngambo mosusu, basali ebele ya ba hopital balobaka kaka lokota ya Allemagne, bayebi lokota mosusu te. Tala tina ba  ndako ya misala ya minganga mingi na ba hopital mingi mizali  na mikakatano ya kosolola na babeli.

Kosunga misala ya minganga ezali komonana lokola eloko moko te esalami, soki bango bazangi makoki ya kosolola na babeli. Babeli mingi bazangi kolimbola pasi na bango  na mobimba bo elongobani, mpe basalisi bazali kozanga kolandela pasi nioso ya babeli. Babeli  bazali kolobela pasi na bango nioso te, nde minganga bazali koyeba bobele ndambo ya minioko na bango. Koluka lisolo ya malamu  kati na babeli na basalisi nde etumba oyo esengeli kolonga penza mpo na koyeba kolandela pasi nionso ya babeli.

Mokanda oyo nde ekokisi likanisi moko ya motuya makasi makambo ya tina penza elimbolami na lokota ya ba arabe, ba islandais, ba chinois kolandisama na manaka.

Bilili biye bizali na mokanda yango basalelaka yango wuta kala na malako ya bobateli bato, lolenge ya kosalela  bisaleli ya sika, na bilili oyo ezalaka na ba ordinateurs, nioso wana pona kozala na bilili kaka moke oyo ekozala ya sika pona batu mingi ya bikolo nioso. Kosolola na kosalelaka bilili ezali na molongo mobimba, mingi bayebi yango mpe ezali kosunga makasi penza.

Mokanda ya EFVM ya langi ya bleu mpo na kimunganga ya batamboli bikolo na bikolo ezali penza kosunga bosololi ya malamu kati na babeli na basalisi. Yango ezali pete na kososola mpe elobeli makambo nioso. Yango esalemi na basali oyo bayebi penza kimunganga , lolenge ya mabanso ya babeli yango na lolenge ya bizaleli na bango ya mikolo  nionso. Mpo na biso na EFVM mokanda oyo ekosunga makasi na ba ndako ya misala ya minganga mpe lisusu na ba hopital na bisaka na yango ya boyambi bato na mikono po na kozwa lisungi na mbango mbango (urgence).