Laboratoire ya botamboli

Bosangisi makoki ya botamboli ya bayi mikono ya AOMI

Logo-Rauch-und-Nikotinfrei

Lisanga ezali komema botamboli pe kaka na nzela wana ezali kopesa nzela ya kobika lisusu na lisanga. Tango makoki ya kotambola pe kopota mbangu ezali te, yango etiaka bipekiseli na makambo mosusu ya bomoyi ya mokolo na mokolo. Makambo oyo ememaka bipekiseli wana mizali ebele, mingi penza kokangama ya misisa ya botambolisi makila na makolo (artériopathie oblitérante des membres inférieurs, AOMI). Lisanga ya Eropa mpo na mikono ya motema (ESC) ekansi ete ba millions 40 nde motuya ya bato bazali kobela bokono ya kokangama misisa ya makolo na Eropa mobimba. Pasi ya nzoto etindaka bato ba telemaka na nzela. Na elobeli ya minganga, AOMI ebengami bokono vitrine pamba te bato na bokono oyo batalemaka liboso ya ba vitrine ya ba magazin mpo na kobomba  pasi na bango na kosalaka lokola bato bazali kotala biloko bizali na vitrine mpo basombi batala. Elobeli wana ya ba vitrine ekoki kosekisa, kasi ebosanisa biso te ete babeli bayokaka pasi makasi. Nayango esengeli kobakisa bipekiseli ya makoki ya kotambola emonisamaka penza te to ezipami na ba pasi misusu lokola komela pema to pasi ya mikuwa oyo ebakisamaka likolo ya oyo minganga basila komona.

EFVM ememaka lisungi na bisikaya mosola ya minganga mpe ba kiliniki, na nzela ya ba laboratoire wapi epayi babeli bakoki koyeba lolenge ya makoki na bango ya kotambola na makolo. Fondation ezali na miango ya  kobenda bokebi ya minganga, babeli pasi ya makolo miwuti na bokono ya misisa ya botambolisi makila na makolo po ete bokono wana emonisama na ebandeli po na kolonga yango na pete pe kopekisa yango komema mitungisi misusu.