Mayangani po na mikano ya boluki lobiko

Kozwa mikano mpe bitinda ya bokomisi malamu koleka bokolongono ya misisa ya botambolisi makila na nzoto

ESC Guidelines PDF

Bolukiluki na ntina ya mikono ya motema mpe misisa ya botambolisi makila na nzoto etombwami makisi mibu miye. Lelo oyo, bakomi kosala banzela misusu ya mike mike mpo na kolekisa makila bipayi misisa na yango ekangami. Wana nde ekozala kosalemaka mingi mibu mizali koya mpo na kolonga kokangama ya misisa. Kasi misisa wana ya mike mike oyo bazali kotia ekozala mpe na ntina mingi na koluka kolonga mikono ya AVC (kopanzana ya misisa ya makila na kati ya bongo), motema kotika kobeta na pwasa, to koboya kokata makolo. Ndakisa, kosalisa misisa pona kolonga bokono songolo ekoki komema makambu misusu likolo ya bokoli ya nzoto soki bazali kokondisa baposo ya kato ya nzoto. Kosala misisa wana ya mike mike esengeli etosa mibeko ya nzoto na lolenge na yango ya kozalaka mpe kosalaka : soki makila ezali kotambola mbangu mbangu esengeli mosisa na yango ekoma monene. Pamba te, kotambola mbango ya makila nde etindaka nzoto ekola. Elingi koloba etamboli mbango mbango ya makila nde ekomisaka misisa milayi wana nde ememaka bokoli ya nzoto (artériogenèse). Nde tina ya komona ete kosalisaka nzoto ngalasisi ezali malamu penza po na misisa ya botambolisi makila na nzoto.

Molakisi Munganga Wolfang Schaper azali moko ya babandisi bolukiluki na tina wana – ye nde amona yango liboso mpe afungola nzela ya kosalela yango mpo na bosungi babeli.

Bosalisi ya longe oyo ezali koluka penza koboya lipaso mpe kotambolisa makila malamu na nzoto na kotiyaka misisa misusu epayi oyo ya kala ekangama. Tokoki kosalela ba tekiniki ya sika sika penza lokola « retropulsation » to « antepulsation » po na koboya kokata bato makolo.

EFVM esalaka milulu po na kolobela mayele ya kotiyaka misisa misusu ya mike mike  mpe ezwaka mikano na yango mpo na kokomisa sa yango bitinda oyo minganga na masanga ya babeli basengeli koluka kotosaka.

Misala oyo nde emema milulu ya yambo na tina ya mitinda na bosalisi na nzela ya kotiyaka misisa ya mike mike.